Lingala	German
ndáko	Haus
mobáli	Mann
mibáli	Männer
mwásí	Frau
básí	Frauen
mwána	Kind
moto	Person
bato	Personen, Leute
motó	Kopf
motúna	Frage
mitúna	Fragen
litáma	Wange
matáma	Wangen
elóko	Ding
bilóko	Dinge
ebendé	Eisenstange
lokolo	Bein, Fuß
makolo	Beine
lobóko	Arm, Hand
mosapi	Finger, Zeh
súki	Haar, Feder
míso	Augen
pínzolí	Träne
mái	Wasser
pondú	Maniokblätter
elambá	Tuch
sósó	Huhn
mbólókó	Antilope
nzoku	Elefant
mosuni	Fleisch
lípa	Brot
mbanda	Rivale, Rivalin
ngambo	Schwierigkeit
ngámbo	gegenüberliegende Seite (Fluss, Straße)
sango	Nachricht
sángó	Priester
tóngó	Morgen
mbúla	Regen
kíti	Stuhl
búku	Buch
ekoti	Hut
mbelí	Messer
libúlú	Loch (im Boden)
zándo	Markt
mbóka	Dorf
lopángo	Parzelle
mongóngó	Kehle
mbóngo	Geld
tálo	Preis
mamá	Mutter
papá	Vater
bandeko	Familienangehörige
mokonzi	Anführer
bakonzi	Anführer (Plural)
moyémbi	Sänger, Sängerin
Nzámbe	Gott
pási	Schmerz
mikolo	Tage
tángo	Zeitpunkt
ndéngé	Art und Weise
libosó	Vorderseite; zuerst
sánzá	Mond
barrage	Staudamm
komóna	sehen
kopésa	geben
kosála	arbeiten, machen
kotánga	lernen
kolámba	kochen
kokenda	gehen
kobéta	schlagen
kodéfisa	leihen
kofungola	öffnen
kolángwa	betrunken sein
kolángwalángwa	sehr betrunken sein
koleka	übertreffen
koyóka	hören, riechen
kozala	sein
kogúmba	falten
kofúta	bezahlen
kovímba	anschwellen
kobónga	in Ordnung sein
kokwéya	fallen
kodóndwa	springen
kofínga	beleidigen
kokóma	ankommen
kokoma	schreiben
kobanda	beginnen
kitóko	schön
mabé	schlecht
makási	hart, stark
molaí	lang, groß
milaí	lang, groß (Plural)
monéne	groß
minéne	groß (Plural)
mokúsé	kurz
mikúsé	kurz (Plural)
moké	klein
miké	klein (Plural)
motáné	rot
mitáné	rot (Plural)
bulé	blau
míngi	sehr; oft
mwâ	ein wenig
ebelé	viele
penzá	wirklich
pé	auch
mókó	eins; ein
míbalé	zwei
mísátu	drei
mítáno	fünf
ngáí	ich, mich
yó	du, dich
yé	er, sie (Person)
yangó	es; sie (Dinge)
bísó	wir, uns
bínó	ihr; Sie (höflich)
bangó	sie (Personen)
óyo	dieser; der/die (Relativ)
wâná	jener
náni	wer
wápi	wo, wohin
tángo níni	wann
ndéngé níni	wie
na	und; mit; in
ya	von (Besitz)
té	nicht; nein
te	dass
Pierre amónákí Pauline	Pierre sah Pauline.
ndáko ya mobáli	das Haus des Mannes
ndáko kitóko	ein schönes Haus
Abótámí na Kinshása	Er wurde in Kinshasa geboren.
mobáli óyo	dieser Mann
mibáli míbalé	zwei Männer
Kíti óyo namónákí, ezalí tálo	Der Stuhl, den ich gesehen habe, ist teuer.
Ndáko ezalákí mwâ kitóko	Das Haus war ein bisschen schön.
Ndáko ezalákí kitóko míngi	Das Haus war sehr schön.
Abósanaka míngi ekoti na yé	Er vergisst oft seinen Hut.
Wápi akendákí?	Wohin ist er gegangen?
Akendákí wápi?	Wohin ist er gegangen?
Namónákí yé té	Ich habe sie/ihn nicht gesehen.
Namónákí yangó té	Ich habe es nicht gesehen.
Namónákí bangó té	Ich habe sie (Personen) nicht gesehen.
ngáí, yó, yé, yangó; bísó, bínó, bangó, yangó	ich, du, er/sie, es; wir, ihr, sie (Personen), sie (Dinge)
Atángákí	Er lernte.
yó; bínó	du (vertraut); Sie (höflich)
Bísó na Marie tokendákí na ndáko	Marie und ich gingen nach Hause.
elóko mókó	etwas
moto mókó	jemand
baSolange	Solange und ihre Freunde
mobáli óyo; mobáli wâná	dieser Mann; jener Mann
Baóyo bakwéyakí, baóyo wâná té	Diese hier sind gefallen, die dort nicht.
mobáli ya libosó	der erste Mann
mibáli mísátu	drei Männer
mobáli ya mísátu	der dritte Mann
Mbóngo na yé ekokí té; ya bísó mbóngo ekokí	Sein Geld reicht nicht, unseres reicht.
mbóngo na bísó	unser Geld
mbóngo ya mobáli	das Geld des Mannes
Búku óyo ya náni? Ya ngáí	Wessen Buch ist das? Meins.
Pierre azalí molaí koleka Jean	Pierre ist größer als Jean.
Pierre alekí Jean na molaí	Pierre ist größer als Jean (wörtlich: übertrifft Jean an Größe).
Akotánga	Er wird lernen.
Nazalí kolámba	Ich koche gerade.
Nazalí pé kolámba	Ich koche auch gerade.
Mikolo óyo Francine azalí kosála na restaurant	Zurzeit arbeitet Francine in einem Restaurant.
Nasálaka na Kinshása	Ich arbeite (gewöhnlich) in Kinshasa.
Nabángaka Nzámbe	Ich fürchte Gott.
Napésí	Ich habe gegeben.
Nazalí kopésa	Ich gebe gerade.
Nazalákí kopésa	Ich war gerade beim Geben.
Napésákí. / Napésákí té	Ich gab. / Ich gab nicht.
Nakopésa. / Nakopésa té	Ich werde geben. / Ich werde nicht geben.
Nazalí	Ich bin.
Mwána akokí kofungola yangó té	Das Kind kann es nicht öffnen.
Akokí kozala na Kinshása	Es kann sein, dass sie in Kinshasa ist.
Sálá!	Arbeite!
Osálákí té	Du hast nicht gearbeitet.
Kosála té!	Arbeite nicht!
Namóní mobáli	Ich habe den Mann gesehen.
Mobáli abóngísákí kíti	Der Mann reparierte den Stuhl.
Kíti ekwéyákí	Der Stuhl fiel um.
Yé abóngísákí kíti	Er reparierte den Stuhl.
Yangó ekwéyákí	Er (der Stuhl) fiel um.
Mamá apésákí mwána búku	Die Mutter gab dem Kind ein Buch.
Mamá apésákí búku na mwána	Die Mutter gab ein Buch an das Kind.
Mwána apésákí kíti na mamá	Das Kind gab den Stuhl an die Mutter.
Mwána apésákí mamá kíti	Das Kind gab der Mutter einen Stuhl.
Bato bazalákí ebelé	Es waren viele Leute da.
Mbúla ezalákí kobéta	Es regnete.
Ayókákí motó pási	Er hatte Kopfschmerzen.
Motó ezalákí kosála yé pási	Der Kopf tat ihm weh.
Nalingí sósó	Ich mag Huhn.
Sósó esepelisaka ngáí	Ich mag Huhn (wörtlich etwa: Huhn erfreut mich).
Tobángí	Wir haben Angst.
Nakátákí lípa na mbelí	Ich schnitt das Brot mit einem Messer.
Akendákí na Marie	Er ging mit Marie.
Pierre akendákí na mwána	Pierre ging mit dem Kind.
Pierre na mwána bakendákí	Pierre und das Kind gingen weg.
Francine na Marie bazalákí kotánga	Francine und Marie lernten gerade.
Natúnákí yé: “owútí wapi pé olingí kokenda wápi?”	Ich fragte ihn: „Woher kommst du, und wohin willst du gehen?“
Pierre azalákí moyémbi	Pierre war Sänger.
Marie azalí molaí	Marie ist groß.
Sendi azalí na mbóka	Sendi ist im Dorf.
Nazalákí na ndáko	Ich war im Haus.
Azalákí na mwána	Er hatte ein Kind.
Akendákí zándo	Er ging zum Markt.
Awútákí zándo	Er kam vom Markt.
Akendákí na Kinshása	Sie ging nach Kinshasa.
Awútákí na Kinshása	Er kam aus Kinshasa.
Marie atíndíkákí Francine na libúlú	Marie stieß Francine in das Loch.
Francine azalí na libúlú	Francine ist in einem Loch.
Marie abimísákí Francine na libúlú	Marie half Francine aus dem Loch.
Amímónákí	Er sah sich selbst.
Bamónánákí	Sie sahen einander.
Bamímónákí	Sie sahen sich selbst.
Bandeko bakundákí papá. > Papá akundámákí na bandeko	Die Familienangehörigen begruben den Vater. > Der Vater wurde von den Familienangehörigen begraben.
Aponákí elambá. > Aponélákí ngáí elambá	Er wählte ein Tuch. > Er wählte ein Tuch für mich.
Afándákí. > Afándélákí kíti	Er setzte sich. > Er setzte sich auf einen Stuhl.
Mobáli óyo amónákí ngáí akendákí na ndáko	Der Mann, der mich gesehen hat, ging nach Hause.
Mobáli amónákí ngáí akendákí na ndáko	Der Mann, der mich gesehen hat, ging nach Hause.
Kíti óyo nasómbákí ezalákí mabé	Der Stuhl, den ich gekauft habe, war schlecht.
Kíti nasómbákí ezalákí mabé	Der Stuhl, den ich gekauft habe, war schlecht.
Mbelí óyo akátákí sósó na yangó, ezalákí makási	Das Messer, mit dem er das Huhn schnitt, war hart.
Alobákí te mbúla ekobéta	Sie sagte, dass es regnen würde.
Alobákí mbúla ekobéta	Sie sagte, es würde regnen.
Nayébí te ozalákí na ndáko	Ich weiß, dass du zu Hause warst.
Alingí kokenda	Er will gehen.
Alingí ákenda	Er will gehen.
Akanísí te mwána na yé azalákí na ndáko	Sie glaubt, dass ihr Kind im Haus war.
Alingí te mwána na yé áyâ na ndáko	Sie will, dass ihr Kind nach Hause kommt.
Akendákí na ndáko	Sie ging nach Hause.
Akendákí na ndáko té	Sie ging nicht nach Hause.
Namónákí elóko mókó té	Ich habe nichts gesehen.
Pierre moto abétákí Paul	Pierre war es, der Paul schlug.
Paul moto Pierre abétákí	Paul war es, den Pierre schlug.
Adéfísákí yó yangó kodéfisa, akabélákí yó té	Sie hat es dir GELIEHEN, nicht GESCHENKT.
Aliákí pé lípa	Er aß auch Brot.
Yé pé aliákí lípa	Auch er aß Brot.
Cathy o!	He, Cathy!
mái ya míso	Tränen (wörtlich: Wasser der Augen)
mosapi ya lokolo	Zeh (wörtlich: Finger des Fußes)
elambá ya mái ya pondú	ein grünes Tuch (wörtlich: Tuch vom Wasser der Maniokblätter)
elambá ya bulé	ein blaues Tuch
sósó ya mobáli	Hahn
sósó ya mwásí	Henne
mosapi ya lobóko	Finger
Mwána akwéyí	Das Kind ist gefallen.
Mwána akwéyá	Das Kind ist gefallen (vor langer Zeit).
Mwána akwéyákí	Das Kind fiel.
Mwána akwéyáká	Das Kind fiel (vor langer Zeit).
Mwána akokwéya. / Mwána akwéya	Das Kind wird fallen (bedingte / unbedingte Vorhersage).
Nazalí kokoma. / Nazôkoma	Ich schreibe gerade.
Pierre akomaka mikandá ya kitóko	Pierre schreibt schöne Briefe.
Tokokenda ndáko té	Wir werden nicht nach Hause gehen.
Olekí Kalúlu na makási	Du bist stärker als Kalulu.
bakonzi óyo mítáno ya makási ya milaí	diese fünf starken, großen Anführer
bilengé óyo mítáno ya makási ya milaí	diese fünf starken, großen Jugendlichen
mibáli · bamibáli	Männer · die (bestimmten) Männer
mobáli ya mokambi · mobáli na yé	der Mann der Chefin · ihr Mann
Eglise (óyo) tobálánákí na káti na yangó ezalí kitóko	Die Kirche, in der wir geheiratet haben, ist schön.
Bakomítúna	Sie werden sich fragen.
